TV

Moyangeli ya Sud-Kivu Purusi alobi Rwanda na M23 bazali kotinda bobangi na Bukavu

Your browser doesn’t support HTML5

Kimya ezali engumba Bukavu ata ko emonani basoda 84 basalaki mwa mobulu ntango bazalaki kotindama bisika misusu. Moyangeli ya etuka ya Sud-Kivu Jean-Jacques Purusi alimbolaki na VOA Lingala ete basota bango bakangamaki mpe Rwanda na M23 bazali kotinda nungu nungu mpo na kobangisa bavandi.